1 Samuele 27:8 - Mokanda na Bomoi8 Na tango wana, Davidi mpe bato na ye bazalaki kobundisa bato ya Geshuri, ya Girizi mpe ya Amaleki ; pamba te wuta kala, bato ya bikolo yango bazalaki kovanda na mokili longwa na Shuri kino na Ejipito. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Abisalomi azongiselaki Joabi : — Tala, natindelaki yo maloba ; nalobaki : « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye : ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri ? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi ; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai ! › »
Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye : — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te ; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te.