7 Davidi awumelaki na mokili ya bato ya Filisitia mobu moko mpe sanza minei.
Na tango wana, Davidi mpe bato na ye bazalaki kobundisa bato ya Geshuri, ya Girizi mpe ya Amaleki ; pamba te wuta kala, bato ya bikolo yango bazalaki kovanda na mokili longwa na Shuri kino na Ejipito.
Bakonzi ya basoda ya Filisitia batunaki : — Ba-Ebre oyo bazali kosala nini awa ? Akishi alobaki na bango : — Ezali Davidi, mosali ya Saulo, mokonzi ya Isalaele. Azali elongo na ngai wuta mibu mpe mikolo ; mpe natikali nanu kokanga ye ata na mbeba moko te.