Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 27:6 - Mokanda na Bomoi

6 Na mokolo wana, Akishi apesaki ye engumba ya Tsikilagi. Yango wana Tsikilagi ekoma kino na mokolo ya lelo engumba ya bakonzi ya Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 27:6
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Saulo asilaki kokufa, Davidi azongaki na Tsikilagi sima na ye kolonga bato ya Amaleki. Mpe avandaki kuna mikolo mibale.


Na tango oyo Davidi akimaki na Tsikilagi mpo na kobombama Saulo, mwana mobali ya Kishi, bato bayaki kosangana na ye. Bazalaki basoda ya mpiko oyo babongami mpo na kosalisa ye na bitumba.


Ndambo ya bato ya Manase bakendeki kosala boyokani elongo na Davidi tango akendeki elongo na basoda ya Filisitia, mpo na kobundisa Saulo. Kasi Davidi elongo na bato na ye balongaki te kosunga bato ya Filisitia, pamba te sima na bakambi na bango koyokana, babenganaki Davidi mpe balobaki : « Davidi alingi kobomisa biso mpo ete azongisa boyokani na nkolo na ye Saulo ! »


kati na Tsikilagi, kati na Mekona mpe bamboka na yango ya mike-mike,


Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »


Davidi alobaki na Akishi : « Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ete bapesa ngai esika epai wapi nakoki kovanda kati na moko ya bingumba ya mokili. Mpo na nini mosali na yo avanda na mboka mokonzi elongo na yo ? »


Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia batombokelaki Akishi mpe balobaki : — Zongisa moto oyo ! Tika ete azonga na esika oyo otiaki ye ; asengeli te kokende elongo na biso na bitumba, noki te akobalukela biso na tango ya bitumba. Mpe ndenge nini moto oyo akoki kosepelisa lisusu mokonzi na ye, soki na komema mito ya bato na biso moko te ?


Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango.


Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi ; mpe totumbaki na moto Tsikilagi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ