Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 27:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akimi na Gati, atikaki koluka ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 27:4
4 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi.


Boye Saulo alobaki : — Solo, nasali masumu ! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga ! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.


Davidi mpe bato na ye bavandaki na Gati epai ya Akishi : mobali nyonso azalaki na libota na ye, mpe Davidi azalaki na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli, mpe Abigayili oyo azalaki liboso mwasi ya Nabali, moto ya Karimeli.


Davidi alobaki na Akishi : « Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ete bapesa ngai esika epai wapi nakoki kovanda kati na moko ya bingumba ya mokili. Mpo na nini mosali na yo avanda na mboka mokonzi elongo na yo ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ