Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 27:10 - Mokanda na Bomoi

10 Tango Akishi atunaki : — Bobundi wapi lelo ? Davidi azongisaki : — Tobundi na sude ya Yuda, na sude ya mokili ya bato ya Yerameeli, mpe na sude ya mokili ya bato ya Keni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 27:10
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi liboso, atunaki ye : — Ozali penza mwana na ngai Ezawu ? Jakobi azongisaki : — Iyo, ezali ngai solo.


Tango bato ya Abisalomi bayaki epai ya mwasi, batunaki : — Ayimaatsi mpe Jonatan bazali wapi ? Mwasi azongiselaki bango : — Bakatisi mayi. Bato ya Abisalomi balukaki, kasi bamonaki moto moko te ; mpe bazongaki na Yelusalemi.


Bana mibali ya Yerameeli, mwana liboso ya Etsironi, bazalaki : Rami, mwana na ye ya liboso ya mobali, Buna, Oreni, Otsemi mpe Ayiya.


Bana mibali oyo babotelaki Etsironi : Yerameeli, Rami mpe Kelubayi.


Nayinaka lokuta mpe nayokaka yango nkele, nalingaka nde mibeko na Yo.


Mema ngai mosika ya nzela ya lokuta ; mpe, na boboto na Yo, teya ngai mobeko na Yo.


Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.


Sima, amonaki bato ya Keni mpe alobaki maloba oyo : « Esika na yo ya kovanda ezali makasi, zala na yo ezalaka kati na mabanga ;


Yango wana, tika ete moko na moko kati na bino abwaka lokuta mpe alobaka solo na moninga na ye, pamba te biso nyonso tozali kaka biteni ya nzoto moko.


Bakitani ya Keni oyo azalaki bokilo ya Moyize balongwaki na engumba ya banzete ya Mbila elongo na bato ya libota ya Yuda, mpe bakendeki kovanda esika moko na bavandi ya esobe ya Yuda, oyo ezali na sude ya Aradi.


Kaka na mokolo wana, Eberi, moto ya Keni, akabwanaki na bato mosusu ya Keni, bakitani ya Obabi, semeki ya Moyize. Mpe Eberi akendeki kino na terebente oyo ezali na Tsananimi, pembeni ya Kedeshi, mpo na kotelemisa ndako na ye ya kapo.


Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni, apambolama kati na basi nyonso ! Tika ete apambolama kati na basi nyonso oyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo.


Bongo Saulo alobaki na bato ya Keni : « Bokende na bino, bolongwa na milongo ya bato ya Amaleki mpo ete nabebisa bino te elongo na bango, pamba te bosalelaki bato nyonso ya Isalaele bolamu tango babimaki na Ejipito. » Boye bato ya Keni balongwaki na milongo ya bato ya Amaleki.


Davidi akendeki na mboka Nobi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki. Ayimeleki alengaki mpe akimaki mbangu mpo na kokende koyamba ye. Atunaki na Davidi : — Mpo na nini ozali yo moko ? Mpo na nini ezali na moto moko te elongo na yo ?


momemi sango moko ayaki epai ya Saulo mpe alobaki na ye : « Yaka noki ! Bato ya Filisitia bakoti na mokili. »


Davidi azalaki kotika te ete bamema na Gati, ezala mobali to mwasi, noki te bapanza sango na ye na maloba oyo : « Tala makambo oyo Davidi asalaki. » Davidi azalaki kosala kaka bongo, tango nyonso oyo avandaki na mboka ya bato ya Filisitia.


Davidi atunaki Akishi : — Nasali nini ? Eloko nini ya mabe oyo omoni epai ya mosali na yo wuta mokolo oyo nayaki epai na yo kino lelo ? Mpo na nini nakoki te kokende kobundisa banguna ya mokonzi, nkolo na ngai ?


mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Rakali, kati na bingumba ya bato ya Yerameeli, ya bato ya Keni ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ