Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 26:8 - Mokanda na Bomoi

8 Abishayi alobaki na Davidi : — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 26:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki na mokonzi : — Mpo na nini mbwa oyo ekufa ezali kolakela nkolo na ngai mabe. Pesa ngai nzela mpo ete nakende kokata ye moto.


Nakozalaka moto ya esengo mpe nakosepelaka kati na bolingo na Yo ; pamba te omonaka pasi na ngai, mpe oyebi mitungisi na ngai.


Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, ayebisaki Gedalia na nkuku, na Mitsipa : — Pesa ngai nzela ete nakende koboma Isimaeli, mwana mobali ya Netania ! Moto moko te akoyeba yango. Mpo na nini aboma yo ? Mpo na nini Bato nyonso ya Yuda, oyo bazali pene na yo bapanzana mpe ndambo oyo bakotikala bakufa ?


Likita ya ndenge nini bakoki kosalela Yawe ? Azali Ye oyo asilisaka makambo nyonso ; pasi ekoya lisusu te.


Pamba te Nzambe akanga bato nyonso lokola na boloko ya kozanga botosi mpo ete ayokela bato nyonso mawa.


Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te ?


Yawe apesaki bango kimia na bangambo nyonso, kolanda nyonso oyo alakaki batata na bango na nzela ya ndayi. Monguna moko te kati na banguna na bango alongaki lisusu kotelemela bango. Yawe akabaki banguna na bango nyonso na maboko na bango.


Tango libota ya Yuda ekotaki na bitumba, Yawe akabaki bato ya Kanana mpe ya Perizi na maboko na bango, mpe babomaki bato nkoto zomi, na Bezeki.


Davidi avandaki na bisambelo ya likolo ya bangomba kati na esobe, mpe avandaki na likolo ya ngomba kati na esobe ya Zifi. Saulo alukaki ye mikolo nyonso, kasi Nzambe akabaki Davidi te na maboko na ye.


Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.


Bato ya Davidi balobaki na ye : Tala mokolo oyo Yawe alobelaki tango alobaki na yo : « Nakokaba monguna na yo na maboko na yo mpo ete osala ye nyonso oyo olingi. » Boye Davidi apusanaki na kobombama mpe akataki songe ya kazaka ya Saulo.


Yawe oyo afutaka moto nyonso kolanda bosembo mpe boyengebene na ye, akabaki yo na maboko na ngai lelo ; kasi naboyaki kosembola loboko na ngai likolo ya mopakolami na Yawe.


Boye Davidi mpe Abishayi bakomaki, na butu, na esika oyo basoda bazalaki. Bakutaki Saulo alali pongi na kati-kati ya molako, mpe likonga na ye epikamaki na mabele, na pembeni ya moto na ye. Abineri mpe basoda balalaki zingazinga na ye.


Kasi Davidi alobaki na Abishayi : — Te ! Koboma ye te ! Pamba te nani akosembola loboko na ye likolo ya mopakolami na Yawe mpe azanga kozwa etumbu ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ