Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 26:21 - Mokanda na Bomoi

21 Boye Saulo alobaki : — Solo, nasali masumu ! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga ! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 26:21
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye : — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo !


Nayebi ete moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki bakonzi nyonso mibale ya basoda elongo na basoda na bango oyo bayaki liboso ; kasi sik’oyo, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya bato na ngai tuku mitano ezala na motuya na miso na yo !


Kufa ya bayengebene ya Yawe ezali na motuya makasi na miso na Ye.


Moko te akoki kosikola ndeko na ye, moko te akoki kofuta mbongo epai ya Nzambe mpo na lisiko na ye.


akosikola bango na minyoko mpe na makambo na kanza, pamba te bomoi na bango ezali motuya na miso na ye.


Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo ; ngai mpe bato na ngai tosali mabe.


Balami alobaki na anjelu ya Yawe : — Nasali masumu. Nayebaki te ete otelemaki na nzela mpo na kokanga ngai nzela. Kasi soki osepeli na mobembo oyo te, nakozonga na ngai.


Alobaki na bango : — Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te ! Kasi bango bazongisaki : — Etali biso na nini ? Etali nde yo moko !


Samuele alobaki na Saulo : — Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.


Bongo Saulo alobaki na Samuele : — Nasali lisumu, nabuki mobeko ya Yawe mpe malako na Ye. Nabangaki bato, yango wana natosaki bango.


Saulo alobaki : — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo : pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo.


Bakonzi ya basoda ya Filisitia bakobaki kobima mpo na kobunda ; mpe tango nyonso bazalaki kosala yango, Davidi azalaki kolonga, koleka bakonzi mosusu ya basoda ya Saulo. Boye kombo na ye ekendeki sango.


Tango Davidi asilisaki koloba na Saulo, Saulo atunaki : — Oyo nazali koyoka ezali solo mongongo na yo Davidi, mwana na ngai ? Mpe Saulo alelaki makasi.


Davidi azongisaki : — Likonga ya mokonzi, yango oyo ! Tika ete moko kati na bilenge mibali na yo aya kozwa yango.


Ndenge bomoi na yo ezalaki lelo motuya makasi na miso na ngai, ndenge wana mpe bomoi na ngai ekozala motuya makasi na miso ya Yawe, mpe akokangola ngai na pasi nyonso.


Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akimi na Gati, atikaki koluka ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ