Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 26:20 - Mokanda na Bomoi

20 Sik’oyo, tika ete makila na ngai esopana na mabele te, mosika na miso ya Yawe ! Pamba te mokonzi ya Isalaele abimaki mpo na koluka ngenga kaka moko, ndenge balandaka soso ya zamba, na bangomba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 26:20
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.


Bato oyo bayinaka ngai na pamba balukaki kokanga ngai lokola ndeke ;


Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.


Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.


Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.


Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »


Ndenge kaka lisese ya kala elobi : « Misala mabe ewutaka epai ya bato mabe, » loboko na ngai ekosimba yo te.


Mokonzi ya Isalaele abimi mpo na kobundisa nani ? Azali kolanda nani ? Mbwa ya kokufa ? Nzinzi ?


Ezala soki moto moko atelemi mpo na kolanda yo to mpo na koboma yo, Yawe, Nzambe na yo, akobatela malamu bomoi ya nkolo na ngai kati na bato ya bomoi, kasi akobwaka banguna na yo mosika lokola na ebambelo mabanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ