2 Boye Saulo atelemaki mpo na kokende na esobe ya Zifi elongo na basoda ya mpiko ya Isalaele, nkoto misato, mpo na koluka Davidi kati na esobe ya Zifi.
Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.
Na bongo, Saulo azwaki basoda ya mpiko nkoto misato kati na Isalaele mobimba mpe akendeki koluka Davidi mpe bato na ye pene ya etando ya bantaba ya zamba.