Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 26:11 - Mokanda na Bomoi

11 Kasi Yawe apekisi ngai kosembola loboko likolo ya mopakolami na Ye. Sik’oyo, zwa kaka likonga mpe eloko ya mayi oyo ezali pembeni ya moto na ye, mpe tokende na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 26:11
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi atunaki ye : — Mpo na nini obangaki te kosembola loboko na yo mpo na koboma mopakolami na Yawe ?


Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango : « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi : ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › »


Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki : — Boni, Shimei asengelaki te kokufa mpo na likambo oyo, pamba te alakelaki mabe mopakolami na Yawe ?


Ata tango bato bamekaki kopesa ngai kanyaka, nabatelaki kaka maloba na Yo mpo ete natambola te na banzela ya bato ya masumu.


Bozongisaka mabe na mabe te. Bolukaka kosala makambo ya malamu na miso ya bato nyonso.


Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.


Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.


Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.


Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai ! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai.


Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.


Sima na yango, Davidi ayokaki motema na ye kobeta mpo ete akataki songe ya kazaka ya Saulo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ