Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo mpe balobaki na ye : — Boni, Davidi abombami te kati na biso, na bisambelo ya likolo ya bangomba ya Oreshi, kati na esobe, na likolo ya ngomba moke ya Akila oyo ezali na ngambo ya sude ya Yeshimoni ?
Saulo atongaki molako na ye na likolo ya Akila, ngomba moke, oyo etalani na Yeshimoni, pembeni ya nzela. Na tango wana, Davidi azalaki kovanda kati na esobe. Lokola amonaki ete Saulo alandi ye kino na esobe,