Bongo Davidi atindaki bantoma koloba na Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo : — Pesa ngai mwasi na ngai, Mikali, oyo nabalaki ngai moko na motuya ya bangenga nkama moko ya bato ya Filisitia.
Davidi elongo na mampinga na ye babimaki mpe babomaki mibali nkama mibale kati na bato ya Filisitia. Davidi amemaki bangenga na bango, mpe batangaki motango na yango liboso ya mokonzi mpo ete Davidi akoma bokilo ya mokonzi. Boye Saulo apesaki na libala Mikali, mwana na ye ya mwasi, epai ya Davidi.