42 Abigayili amataki na ane na lombangu mpe akendeki nzela moko na bantoma ya Davidi elongo na basali na ye mitano ya basi. Mpe akomaki mwasi ya Davidi.
Boye Davidi akendeki kuna elongo na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, mwasi oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli.
ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ; ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye ;
Davidi mpe bato na ye bavandaki na Gati epai ya Akishi : mobali nyonso azalaki na libota na ye, mpe Davidi azalaki na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli, mpe Abigayili oyo azalaki liboso mwasi ya Nabali, moto ya Karimeli.