41 Abigayili agumbamaki elongi kino na mabele mpe alobaki : — Mwasi mosali na yo, ye oyo ! Abongami mpo na kosalela bino mpe mpo na kosukola makolo ya basali ya nkolo na ngai.
Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.
kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.
Tango Rite ayokaki bongo, agumbamaki, elongi kino na mabele. Alobaki : — Mpo na nini nazwi ngolu ya boye na miso na yo ? Mpo na nini ozali kopesa ngai lokumu ya boye, ngai oyo nazali mopaya ?
Rite alobaki : — Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi.