Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:39 - Mokanda na Bomoi

39 Tango Davidi ayokaki ete Nabali akufi, alobaki : « Tika ete apambolama, Yawe oyo akoti likambo na ngai na ndenge Nabali atiolaki ngai ! Apesi te na mosali na Ye nzela ya kosala mabe, kasi akweyisi mabe ya Nabali na moto na ye moko ! » Bongo Davidi atindaki maloba epai ya Abigayili mpo na kosenga ye ete akoma mwasi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:39
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango : « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi : ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › »


Mokonzi alobaki lisusu na Shimei : — Oyebi lisusu mabe nyonso oyo osalaki epai ya Davidi, tata na ngai ! Boye, Yawe akomemisa yo ngambo ya mabe oyo yo moko osali.


Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.


Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete.


atimolaka libulu, kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.


Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.


Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo, azwi ngolu kowuta epai na Yawe.


Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo lokola libula kowuta epai ya batata, kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.


pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.


Nani akoki komona mwasi ya lokumu ? Azali na motuya koleka babiju ya talo.


Bonzenga ya elongi ekosaka, mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ; kasi mwasi oyo atosaka Yawe, ye nde abongi na lokumu.


Tozali na ndeko moko ya mwasi, azali nanu moke ; azali nanu ata na mabele te. Tokosala nini mpo na ye na mokolo oyo bakoluka ye na libala ?


Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe, nakomema mokumba ya kanda na Ye kino tango akozwa likambo na ngai na maboko mpe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole, mpe nakomona bosembo na Ye.


Sik’oyo, tozali kobondela Nzambe mpo ete bosala mabe ata moko te ; ezali te mpo bato bamona ete biso tolonga komekama, kasi mpo ete bino bosala bolamu, mpe biso tomonana lokola bato oyo balonga te.


Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino ! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.


Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.


Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso, mpe bato bamipesaki mobimba na bitumba, tika ete bokumisa Yawe !


Mokonzi ya Isalaele abimi mpo na kobundisa nani ? Azali kolanda nani ? Mbwa ya kokufa ? Nzinzi ?


Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.


Davidi azongiselaki Abigayili : — Tika ete apambolama, Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo atindi yo kokutana na ngai na mokolo ya lelo !


Nzokande, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo apesi ngai nzela te ya kosala yo mabe, soki oyaki noki te mpo na kokutana na ngai, mobali moko te kati na ndako ya Nabali alingaki kotikala na bomoi kino lobi na tongo.


Basali ya Davidi bakendeki na Karimeli mpe balobaki na Abigayili : — Davidi atindi biso epai na yo mpo ete toya kozwa yo mpo okoma mwasi na ye.


Mpe Davidi alobaki lisusu : — Na Kombo na Yawe ! Ye moko Yawe nde akoboma ye : akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ