Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:36 - Mokanda na Bomoi

36 Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:36
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mibu mibale, lokola Abisalomi azalaki na basali oyo bakataka bapwale ya bameme, na Bala-Atsori, pene ya mondelo ya Efrayimi, abengisaki bana mibali nyonso ya mokonzi.


Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.


Mpe tango Abineri elongo na bato na ye, tuku mibale, bakomaki epai ya Davidi, na Ebron, Davidi asaliselaki bango feti.


Babimaki na midi na tango Beni-Adadi elongo na bakonzi tuku misato na mibale, oyo bazalaki na ngambo na ye, bazalaki kolangwa masanga na bandako na bango ya kapo.


Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.


Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.


Basalaka feti mpo na kosepela, mpe masanga ya vino epesaka esengo na motema, mpe mbongo epesaka biyano na makambo nyonso.


Motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi ekonyatama na makolo ;


Mawa na bato oyo balamukaka na tongo-tongo mpo na kowumela liboso ya masanga ya vino kino na butu, kino tango bakolangwa masanga !


Nakolangwisa masanga : bakalaka mpe bato na yango ya bwanya, bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko. Bakolala pongi ya libela mpe bakolamuka lisusu te, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Mokonzi ya mampinga.


mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.


Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube, lokola bato oyo balangwe masanga ya vino ; bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.


Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.


Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye : — Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo ; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Totambola malamu, na lolenge oyo ebongi mpo na moyi : na lokoso te, na milangwa te, na pite te, na mobulu te, na koswana te mpe na zuwa te.


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo,


Bongo alobaki na basali na ye : « Bokende liboso na ngai, nazali kolanda bino. » Kasi ayebisaki mobali na ye, Nabali, te.


Kasi na tongo, lokola milangwa na ye esilaki, mwasi na ye ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. Nabali ayokaki pasi na motema mpe akangamaki lokola libanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ