Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:32 - Mokanda na Bomoi

32 Davidi azongiselaki Abigayili : — Tika ete apambolama, Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo atindi yo kokutana na ngai na mokolo ya lelo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:32
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »


mpe alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama, Ye oyo, na mokolo ya lelo, apesi ngai nzela ya komona moto oyo akitani na ngai na bokonzi ! »


Alobaki : — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, akumisama ; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na Davidi, tata na ngai, mpe akokisi, na loboko na Ye moko, makambo oyo alakaki :


Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi,


Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko ! Tika ete bato nyonso baloba : « Amen ! » Bokumisa Yawe !


Tika ete Yawe akumisama, pamba te atalisaki ngai bolingo na Ye ya kokamwa, tango nazalaki kati na engumba oyo ezingelamaki na banguna !


Tika ete Yawe Nzambe oyo asalaka Ye moko bikamwa, Nzambe ya Isalaele, apambolama !


Jetro alobaki : — Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo akangolaki yo wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya Faraon, Ye oyo akangolaki bato wuta na bowumbu ya bato ya Ejipito.


« Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama, pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye ;


Tika ete Nzambe apesamela matondi mpo ete atie kati na motema ya Tito bolingo monene mpo na bino, ndenge tozali na yango mpo na bino !


Bana ya Isalaele batondisamaki na esengo na koyoka sango yango mpe bakumisaki Nzambe. Boye, batikaki likanisi ya kobundisa mokili oyo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki kovanda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ