Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kombo na ye ezalaki « Nabali, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Abigayili. » Abigayili azalaki mwasi ya mayele mpe ya kitoko ; kasi mobali na ye, moto ya etuka Kalebi, azalaki motema makasi mpe moto mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:3
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi : « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza.


Pamba te moto mabe amikumisaka na tina na posa makasi ya motema na ye, apambolaka moto oyo azali na lokoso mpe afingaka Yawe.


Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye, kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango na maboko na ye moko.


Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo lokola libula kowuta epai ya batata, kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.


Mowumbu oyo akomi mokonzi, zoba oyo atondi na bomengo,


Nani akoki komona mwasi ya lokumu ? Azali na motuya koleka babiju ya talo.


Alobaka na bwanya, mpe lolemo na ye epesaka malakisi na bolingo.


Kolanda mitindo oyo Yawe apesaki ye, Jozue apesaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, eteni ya mabele : Kiriati-Ariba (oyo ezali Ebron), kati na libota ya bato ya Yuda. (Ariba azalaki tata ya Anaki).


Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »


Tika ete nkolo na ngai atala te Nabali, mobali oyo ya mabe, pamba te azali penza ndenge kombo na ye ezali ; kombo na ye ezali Nabali, mpe elingi koloba : moto ya liboma. Mpe liboma ezali penza kotambola elongo na ye. Ngai mwasi mosali na yo, namonaki te bilenge mibali oyo mokonzi na ngai atindaki.


Wana Davidi azali kati na esobe, ayokaki ete Nabali azali kokata bameme na ye bapwale.


Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi ; mpe totumbaki na moto Tsikilagi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ