Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:28 - Mokanda na Bomoi

28 Nabondeli yo, limbisa mabe ya mwasi mosali na yo. Yawe akosala penza ete libota ya nkolo na ngai ewumela tango nyonso na bokonzi, pamba te obundaka bitumba ya Yawe. Tika ete, tango nyonso okozala na bomoi, mabe ata moko te emonana kati na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:28
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »


mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakopesa yo bopemi liboso ya banguna na yo nyonso. › Yawe atatoli mpo na yo ete Ye moko akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.


Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. »


Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, olakisaki na mosali na Yo makambo oyo na koloba : ‹ Nakosala ete bokonzi ewumela na libota na yo. › Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo na maloba oyo.


Asalaki masumu nyonso oyo tata na ye asalaki liboso ete Abiyami akoma mokonzi. Apesaki te motema na ye mobimba epai na Yawe, Nzambe na ye, ndenge ezalaki motema ya Davidi, koko na ye.


Pamba te Davidi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe mpe abatelaki mibeko ya Yawe mikolo nyonso ya bomoi na ye, longola kaka likambo moko : likambo ya Iri, moto ya Iti.


nakolendisa mpo na libela kiti na yo ya bokonzi kati na Isalaele, ndenge nalobaki yango epai ya Davidi, tata na yo : ‹ Okotikalaka kozanga te moto oyo akokitana na kiti ya bokonzi ya Isalaele. ›


mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakotia lisusu banguna na yo na se ya bokonzi na yo. Boye, nazali koyebisa yo ete Yawe akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.


Solo, Yo moko, Nzambe na ngai, olakisaki na mosali na Yo ete okosala ete bokonzi ewumela na libota na ye. Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo.


Yaazieli alobaki : « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka ! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino : ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe.


Soki te, bakopasola ngai lokola nkosi mpe bakokata ngai na biteni, mpe moto akozala te mpo na kosunga ngai.


Nakobatela mpo na seko bolingo na ngai mpo na ye ; boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.


Amonaka mbeba moko te epai ya Jakobi, amonaka minyoko te kati na Isalaele. Yawe, Nzambe na bango, azali elongo na bango ; koganga ya mokonzi ezalaka kati na bango.


Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.


Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.


Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki : — Moto oyo azalaki penza sembo !


Bongo Samuele alobaki na ye : — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.


Bato nyonso oyo basangani awa bakoyeba ete ezali na mopanga te to na likonga ya monene te nde Yawe abikisaka. Pamba te bitumba ezali ya Yawe, mpe Ye akokaba bino na maboko na biso.


Saulo alobaki na Davidi : — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »


Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.


Ayimeleki azongiselaki mokonzi : — Boni, ezali na moto moko kati na basali na yo nyonso oyo azali na boyengebene lokola Davidi ? Ye oyo azali bokilo ya mokonzi, mokambi ya basoda oyo bakengelaka yo mpe moto oyo aleki na lokumu kati na libota na yo ?


Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »


Tango Davidi asilisaki koloba na Saulo, Saulo atunaki : — Oyo nazali koyoka ezali solo mongongo na yo Davidi, mwana na ngai ? Mpe Saulo alelaki makasi.


Tala, nayebi sik’oyo ete okozala penza mokonzi, mpe bokonzi ya Isalaele ekolendisama na maboko na yo.


Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.


Akweyaki na makolo ya Davidi mpe alobaki : — Oh nkolo na ngai, tika ete mbeba ezala kaka na moto na ngai ! Nabondeli yo, tika ete mwasi mosali na yo asolola na yo ! Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo alingi koyebisa yo.


Bakonzi ya basoda ya Filisitia batunaki : — Ba-Ebre oyo bazali kosala nini awa ? Akishi alobaki na bango : — Ezali Davidi, mosali ya Saulo, mokonzi ya Isalaele. Azali elongo na ngai wuta mibu mpe mikolo ; mpe natikali nanu kokanga ye ata na mbeba moko te.


Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki : « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ