Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:21 - Mokanda na Bomoi

21 Davidi awutaki komilobela : « Ezalaki na pamba nde nabatelaki biloko nyonso ya moto oyo kati na esobe mpo ete eloko moko te ebunga kati na biloko na ye nyonso ! Azongiseli ngai mabe na esika ya bolamu oyo nasalelaki ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:21
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana babimaki na engumba, bamikomelaki nanu mosika te, Jozefi alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Telema, landa bato wana ! Mpe tango okokanga bango, tuna bango : mpo na nini bozongisi mabe na malamu ?


Bana oyo batata na bango bazanga mayele mpe bazanga kombo babenganaki bango libanda ya mboka.


Bazali kozongisela ngai mabe mpo na bolamu oyo nasalaki, mpe kosundola ngai lokola monyokolami.


Boya kanda mpe kosilika te ; kotomboka te, noki te okosala mabe.


Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe, bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.


Pasi etikaka ata moke te ndako ya moto oyo azongisaka mabe mpo na malamu.


Boni, bazongisaka solo mabe na malamu ? Tala, batimoli libulu mpo na kokunda ngai ! Kanisa ndenge nini natelemaki liboso na Yo mpo na koloba na tina na bolamu na bango, mpo ete kanda na Yo ekende mosika na bango.


Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.


Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.


Bolimwisaka kati na bino bololo ya mitema, koyinana, kanda, koswana, mafinga mpe lolenge nyonso ya misala mabe.


Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.


Eleki malamu komona pasi na kosala bolamu, soki yango ezali mokano ya Nzambe, na esika ete omona pasi na kosala mabe.


Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.


Davidi alobaki na basoda na ye : « Tika ete moko na moko atia mopanga na ye na loketo. » Boye, batiaki mipanga na bango na loketo, mpe Davidi atiaki mpe oyo ya ye. Bato pene nkama minei bakendeki elongo na Davidi, mpe bato nkama mibale batikalaki mpo na kobatela biloko.


Nzokande bato yango basalelaki biso penza bolamu, basalaki biso mabe ata moko te, mpe, tango nyonso totambolaki elongo na bango na zamba, tobungisaki ata eloko moko te.


Wana Abigayili azalaki na likolo ya ane, azalaki kokita sima na ngomba. Na tango yango kaka, Davidi mpe bato na ye bazalaki mpe kokita na ngambo epai wapi Abigayili azalaki, mpe akutanaki na bango.


Nayoki ete bazali kokata bameme bapwale epai na yo. Nzokande, tango nyonso oyo babateli bibwele na yo bazalaki elongo na biso na Karimeli, tosalaki bango mabe ata moko te, mpe babungisaki ata eloko moko te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ