Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:2 - Mokanda na Bomoi

2 Na mboka Maoni, ezalaki na moto moko ya bozwi oyo bomengo na ye ezalaki kati na mboka Karimeli. Azalaki na bameme ya mibali nkoto misato mpe bantaba ya basi nkoto moko. Na eleko oyo, azalaki kati na Karimeli epai wapi azalaki kokata bameme na ye bapwale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo.


Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele.


Nzokande tango Labani akendeki kolongola bapwale ya bameme na ye, Rasheli ayibaki banzambe ya bikeko ya tata na ye.


Jakobi alekisaki butu na esika wana. Kati na biloko oyo azalaki na yango, aponaki kado mpo na Ezawu, ndeko na ye :


Tango bayebisaki Tamari : « Bokilo na yo ya mobali azali kokende na Timina mpo na kolongolisa bapwale ya bameme na ye, »


Barizilayi, moto ya Galadi, awutaki na Rogelimi mpo na kokatisa ebale Yordani elongo na mokonzi mpe kotika ye kokoba mobembo na ye.


mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.


Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.


Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !


Mowumbu oyo akomi mokonzi, zoba oyo atondi na bomengo,


Na tongo-tongo, Samuele atelemaki mpo na kokende kokutana na Saulo. Kasi bayebisaki ye : « Saulo akei na Karimeli, atongi kuna ekeko mpo na ye moko, bongo alongwe kuna mpe akei kino na Giligali. »


Boye, batelemaki mpe bakendeki na Zifi liboso na Saulo. Nzokande Davidi elongo na bato na ye bazalaki kati na esobe ya Maoni, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Yeshimoni.


Bamemaki mpe na bowumbu basi mibale ya Davidi : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, moto ya Karimeli, oyo akufisaki mobali, Nabali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ