shamo ya basi tuku misato elongo na bana na yango, bangombe ya basi tuku minei mpe bangombe ya mibali zomi, ba-ane ya basi tuku mibale mpe ya mibali zomi.
Apesaki lisusu mitindo wana epai ya mosali ya mibale, ya misato mpe epai ya basali nyonso oyo bazalaki kolanda bibwele : « Bokoloba kaka maloba moko tango bokokutana na Ezawu.
Bokoyebisa ye lisusu : ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso ! › » Pamba te azalaki komilobela : « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai ; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. »
Mokolo moko, Jonatan, mwana mobali ya Saulo, alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Yaka ! Tokatisa na ngambo mosusu epai wapi bato ya Filisitia bazali. » Kasi alobaki ata likambo moko te epai ya tata na ye.
Wana Abigayili azalaki na likolo ya ane, azalaki kokita sima na ngomba. Na tango yango kaka, Davidi mpe bato na ye bazalaki mpe kokita na ngambo epai wapi Abigayili azalaki, mpe akutanaki na bango.
Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki.