Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:18 - Mokanda na Bomoi

18 Abigayili asalaki na lombangu, azwaki mapa nkama mibale, bambeki mibale ya vino, bameme batumba mitano, bakilo tuku motoba na mibale na bagrame nkama mitano ya ble bakalinga, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka mpe bagato nkama mibale basala na bambuma ya figi ; mpe atiaki yango na likolo ya ba-ane.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:18
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Davidi alekaki mwa moke songe ya ngomba, Tsiba, mobombi bozwi ya Mefibosheti, azalaki kozela mpo na kokutana na ye ; azalaki na ba-ane mibale oyo babongisi mpo na mobembo mpe ememaki mapa nkama mibale, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka, maboke nkama moko ya bambuma ya figi mpe mbeki moko ya masanga ya vino.


Basalaki kuna mikolo misato elongo na Davidi ; bazalaki kolia mpe komela biloko oyo bandeko na bango babongiselaki bango.


Kado efungolelaka moto oyo apesi yango nzela mpe ekotisaka ye liboso ya bato minene.


Likabo oyo bapesi na nkuku ekitisaka kanda, mpe kado oyo batie na tolo ekitisaka kanda makasi.


Tango nyonso ya bomoi na ye, apesaka mobali na ye esengo, kasi mawa te ;


Soki moto azwi yo na likambo, yokana na ye noki, wana bozali nanu na nzela ; soki te, akofunda yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo na boloko.


Izayi alobaki na Davidi, mwana na ye ya mobali : « Zwela bandeko na yo ya mibali bambuma oyo ya ble bakalinga mpe mapa oyo zomi, mpe kende kotikela bango yango na lombangu na molako na bango.


Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »


Nzokande, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo apesi ngai nzela te ya kosala yo mabe, soki oyaki noki te mpo na kokutana na ngai, mobali moko te kati na ndako ya Nabali alingaki kotikala na bomoi kino lobi na tongo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ