Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:17 - Mokanda na Bomoi

17 Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:17
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye : — Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo : mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo ; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo ; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai.


Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo : ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. »


Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.


Bato pamba mpe bato oyo bazanga tina basanganaki elongo na ye mpe batombokelaki Roboami, mwana mobali ya Salomo, tango azalaki elenge ! Bongo lokola akembaki nanu te na mosala, alongaki mpe te kotelema liboso na bango.


Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye : — Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo ! Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki : — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo.


Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye.


Bwanya epesaka moto lokumu, kasi motema mabe ememaka kotiolama.


Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda


Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako ; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako : — Bimisa mosali oyo ayei na ndako na yo ; tolingi kosangisa na ye nzoto ndenge basangisaka nzoto na basi.


Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba : « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini ? » Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia.


Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te.


Soki alobi : « Malamu, » wana mosali na yo akozala na kimia. Kasi soki atomboki na kanda, wana yeba malamu ete azwi mokano ya kosala ngai mabe.


Jonatan alobaki : — Te ! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te !


Butu mpe moyi, tango nyonso tozalaki koleisa bibwele na biso pene na bango, bazalaki lokola mir zingazinga na biso.


Abigayili asalaki na lombangu, azwaki mapa nkama mibale, bambeki mibale ya vino, bameme batumba mitano, bakilo tuku motoba na mibale na bagrame nkama mitano ya ble bakalinga, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka mpe bagato nkama mibale basala na bambuma ya figi ; mpe atiaki yango na likolo ya ba-ane.


Tika ete nkolo na ngai atala te Nabali, mobali oyo ya mabe, pamba te azali penza ndenge kombo na ye ezali ; kombo na ye ezali Nabali, mpe elingi koloba : moto ya liboma. Mpe liboma ezali penza kotambola elongo na ye. Ngai mwasi mosali na yo, namonaki te bilenge mibali oyo mokonzi na ngai atindaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ