Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso ? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba.
Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.
Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze ; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.
Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »