Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:10 - Mokanda na Bomoi

10 Kasi Nabali azongiselaki basali ya Davidi : « Davidi azali nani ? Mwana mobali ya Izayi azali nani ? Mikolo oyo, basali ebele bazali kokima bankolo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:10
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.


Faraon azongisaki : — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende ? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.


Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.


Kolobaka te : « Mpo na nini mikolo eleki ezali malamu koleka mikolo ya lelo ? » Pamba te bwanya etindaka te bato kotuna mituna ya boye.


Bakobenga lisusu te moto ya lokumu zoba, mpe bakobenga lisusu te moto oyo akabaka moyimi ;


Misala ya moyimi ezalaka mabe, abongisaka kaka miango ya mabe mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta na tango oyo mobola azali na mbeba te.


Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki : « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye ? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te ? Zebuli azali molobeli na ye te ? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi ! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki ?


Saulo asilikelaki makasi Jonatan mpe alobaki na ye : — Yo mwana mobali ya mwasi ya yawuli mpe motomboki, nayebi solo ete okoteli mwana mobali ya Izayi ; kasi ezali mpo na soni na yo mpe ya mama oyo abota yo.


Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei.


Tango bilenge mibali ya Davidi bakomaki epai ya Nabali, bayebisaki ye makambo oyo nyonso na kombo ya Davidi, mpe bazelaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ