Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 25:1 - Mokanda na Bomoi

1 Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esanganaki mpo na kosala matanga na tina na ye ; bongo bakundaki ye na mboka na ye, Rama. Davidi akendeki na esobe ya Parani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 25:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe.


Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito.


Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.


Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki : « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, akendeki kobeta Joabi mpe abomaki ye. Bakundaki ye na ndako na ye moko, kati na esobe.


Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, oyo babengaka elanga ya Uza. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Mawa na ngai, mpo ete navandi lokola mopaya kati na Mesheki, kati na bandako ya kapo ya Kedari.


Bakonzi nyonso ya bikolo balalaka na lokumu, moko na moko kati na kunda na ye ;


Wapi sik’oyo bakoko na bino ? Boni, basakoli yango bazali kaka na bomoi kino na mokolo ya lelo ?


Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani.


Sima na yango, bato batikaki Atseroti mpe bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Parani.


Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.


Na mitindo ya Yawe, Moyize atindaki bango wuta na esobe ya Parani. Bango nyonso bazalaki bakambi ya mabota ya bana ya Isalaele.


mpe tango lingomba mobimba eyokaki sango ete Aron asilaki kokufa, bato nyonso ya Isalaele basalelaki ye matanga ya mikolo tuku misato.


Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi.


Bana ya Isalaele balelaki Moyize mikolo tuku misato, na etando ya Moabi kino tango ya kolela mpe ya matanga esilaki.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana.


Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.


Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ