Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 24:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo : « Mokonzi, nkolo na ngai ! » Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 24:9
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.


Tika ete bilombe na bango babwakama na mabanga ; na bongo, maloba na ngai ekoyokana, pamba te ezali kitoko.


Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga.


Moto oyo asalaka mabe ayokaka maloba ya bato mabe, mokosi apesaka litoyi na ye na maloba ya lokuta.


Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.


Mopepe oyo ewutaka na ngambo ya nor, ebetisaka mvula, mpe lolemo oyo etongaka ekomisaka bilongi kanda-kanda.


Lolemo ya lokuta eyinaka bato oyo ezokisi, mpe maloba ya sukali ememaka libebi.


Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta, basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.


Bongo Jeremi alobaki lisusu na mokonzi Sedesiasi : — Mabe nini penza ngai nasali yo to bakalaka na yo to mpe bato na yo mpo ete bobwaka ngai kati na boloko oyo ?


Okokende te kotonga bato na yo bipai na bipai. Okosala eloko moko te oyo ekoyeisa pasi na bomoi ya moninga na yo. Nazali Yawe.


Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.


Davidi akimaki wuta na Nayoti ya Rama mpe akendeki epai ya Jonatan. Atunaki ye : — Nasali nini ? Mabe nini nasali ? Lisumu nini nasali liboso ya tata na yo mpo ete aluka koboma ngai ?


Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka.


Alobaki na Saulo : — Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe ?


Na maloba oyo, Davidi agangelaki bato na ye mpe apekisaki bango kobundisa Saulo. Saulo abimaki na ebombamelo yango mpe akobaki nzela na ye.


Bongo Davidi alobaki lisusu : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolanda mosali na ye ? Nasali nini ? Likambo nini ya mabe nasali mpo ete namema ngambo ?


Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ