Batisheba akitisaki elongi na ye kino na se mpe agumbamaki liboso ya mokonzi ; alobaki : — Tika ete mokonzi Davidi, nkolo na ngai, awumela seko na bomoi !
Bopesa oyo ekoki na mokonzi nyonso : mpako epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, motuya ya biloko epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, botosi epai na ye oyo asengeli kotosama, mpe lokumu epai na ye oyo asengeli kozwa yango.
Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka.
Alobaki na basoda na ye : « Tika ete Yawe apesa ngai te nzela ya kosala likambo ya boye epai ya nkolo na ngai, mopakolami na Yawe ! Loboko na ngai ekoki te kosimba nzoto na ye, pamba te Yawe nde apakolaki ye mafuta. »
Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo : « Mokonzi, nkolo na ngai ! » Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele.
Saulo asosolaki ete ezali mongongo ya Davidi mpe alobaki : — Oyo wana ezali mongongo na yo Davidi, mwana na ngai. Davidi azongisaki : — Solo, ezali mongongo na ngai, oh mokonzi, nkolo na ngai.