Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 24:4 - Mokanda na Bomoi

4 Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 24:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bamemaki moto ya Ishi-Bosheti epai ya Davidi, na Ebron, mpe balobaki na mokonzi : — Tala moto ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, monguna na yo, oyo alukaki koboma yo. Na mokolo ya lelo, Yawe azongisi mpo na mokonzi, nkolo na ngai, mabe na mabe epai ya Saulo mpe bakitani na ye.


soki bato ya libota na ngai balobaka te : ‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo ? ›


Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.


Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona.


Davidi alongwaki na Gati mpe akendeki kobombama na lidusu ya libanga ya Adulami. Tango bandeko na ye ya mibali mpe ya libota ya botata na ye bayokaki sango yango, bakitaki kuna epai na ye.


Alobaki na ye : « Kobanga te ! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo ; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »


Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki : « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. »


Alobaki na Saulo : — Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe ?


Alobaki na Davidi : — Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo !


Yawe oyo afutaka moto nyonso kolanda bosembo mpe boyengebene na ye, akabaki yo na maboko na ngai lelo ; kasi naboyaki kosembola loboko na ngai likolo ya mopakolami na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ