20 Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia ? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo.
Sima na bato ya mayele kokende, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye ; bokima na Ejipito mpe bowumela kuna kino tango nakoyebisa yo lisusu ete bozonga, pamba te Erode akoluka koboma Mwana. »
Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki.
Kasi sik’oyo, bokonzi na yo ekowumela lisusu te. Yawe aluki moto mosusu oyo asepelisaka motema na Ye mpe atie ye mokambi ya bato na Ye, pamba te yo, obateli mibeko ya Yawe te.
Alobaki na ye : « Kobanga te ! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo ; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »
Saulo alobaki na Davidi : — Tika ete opambolama, Davidi, mwana na ngai ya mobali ! Solo, okosala penza makambo minene mpe, solo, okolonga. Bongo Davidi akobaki nzela na ye, mpe Saulo azongaki epai na ye.