Alobaki na mama na ye : — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai ; ngai nde nazwaki yango. Mama na ye alobaki na ye : — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo !
Alobaki na ye : « Kobanga te ! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo ; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »
Yawe oyo afutaka moto nyonso kolanda bosembo mpe boyengebene na ye, akabaki yo na maboko na ngai lelo ; kasi naboyaki kosembola loboko na ngai likolo ya mopakolami na Yawe.
Saulo alobaki na Davidi : — Tika ete opambolama, Davidi, mwana na ngai ya mobali ! Solo, okosala penza makambo minene mpe, solo, okolonga. Bongo Davidi akobaki nzela na ye, mpe Saulo azongaki epai na ye.