Yuda asosolaki ete ezali biloko na ye mpe alobaki : — Azali sembo koleka ngai, pamba te nabalisaki ye te epai ya Shela, mwana na ngai ya mobali. Boye Yuda atikalaki lisusu te kosangisa na ye nzoto.
Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki : « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. »
Yawe oyo afutaka moto nyonso kolanda bosembo mpe boyengebene na ye, akabaki yo na maboko na ngai lelo ; kasi naboyaki kosembola loboko na ngai likolo ya mopakolami na Yawe.
Abishayi alobaki na Davidi : — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.