Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 24:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mokonzi ya Isalaele abimi mpo na kobundisa nani ? Azali kolanda nani ? Mbwa ya kokufa ? Nzinzi ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 24:15
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Joasi abosanaki bolamu nyonso oyo Yeoyada, tata ya Zakari, asalelaki ye, mpe abomaki Zakari, mwana mobali ya Yeoyada. Tango azalaki kokufa, Zakari alobaki : « Tika ete Yawe amona mpe akata likambo oyo ! »


Kota likambo na ngai mpe kangola ngai, batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo !


Nzembo ya Davidi. Yawe, kota likambo na ngai liboso ya bayini na ngai ; bundisa bato oyo bazali kobundisa ngai.


Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ; kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe ya bato mabe.


Bino nyonso, bikolo, boyoka ! Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo, botia matoyi mpe boyoka ! Nkolo Yawe azwi bino na likambo ; Yawe akosambisa bino wuta na Ndako na Ye ya bule !


Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe, nakomema mokumba ya kanda na Ye kino tango akozwa likambo na ngai na maboko mpe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole, mpe nakomona bosembo na Ye.


Ngai nasali yo mabe te, kasi yo nde ozali kosala ngai mabe na kobundisa ngai. Tika ete Yawe, Mosambisi, akata lelo likambo kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Amoni. »


Moto ya Filisitia alobaki na Davidi : — Boni, ngai nazali mbwa mpo ete oya kobundisa ngai na lingenda ? Bongo alakelaki Davidi mabe na nzela ya banzambe na ye.


Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai ! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai.


Tango Davidi ayokaki ete Nabali akufi, alobaki : « Tika ete apambolama, Yawe oyo akoti likambo na ngai na ndenge Nabali atiolaki ngai ! Apesi te na mosali na Ye nzela ya kosala mabe, kasi akweyisi mabe ya Nabali na moto na ye moko ! » Bongo Davidi atindaki maloba epai ya Abigayili mpo na kosenga ye ete akoma mwasi na ye.


Sik’oyo, tika ete makila na ngai esopana na mabele te, mosika na miso ya Yawe ! Pamba te mokonzi ya Isalaele abimaki mpo na koluka ngenga kaka moko, ndenge balandaka soso ya zamba, na bangomba.


Davidi atindaki banongi mpe, na nzela na bango, ayokaki ete Saulo akomi penza.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ