Sima na yango, Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda ? Yawe azongisaki : — Okoki na yo kokende. Davidi atunaki lisusu : — Nakende wapi ? Yawe azongisaki : — Kende na Ebron.
Davidi atunaki Yawe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
Davidi atunaki Nzambe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bango na maboko na yo.
Yawe alobaki na Jedeon : « Nakobikisa bino na nzela ya bato nkama misato oyo bamelaki mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa, mpe nakokaba bato ya Madiani na maboko na yo. Tika ete bato nyonso oyo batikali bazonga, moto na moto na esika na ye. »
Boye Davidi elongo na basoda na ye bakendeki na engumba Keila mpe babundisaki bato ya Filisitia, babotolaki biloko mpe bibwele na bango. Davidi abetaki makasi bato ya Filisitia, mpe, na bongo, abikisaki bato ya Keila.