Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 23:23 - Mokanda na Bomoi

23 Botala mpe boyeba bisika nyonso epai wapi abombamaka, mpe bozongela ngai mpo na koyebisa ngai makambo nyonso ndenge yango ezali. Bongo na sima, soki azali kati na mboka, ngai nakokende elongo na bino mpe nakolukisa ye kati na bituka nyonso ya Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 23:23
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te.


Mokonzi apesaki mitindo : — Bokende koluka esika oyo azali mpo ete natinda bato mpo na kokanga ye. Bayaki koyebisa ye : — Azali na Dotani.


Abombamaka pene ya bamboka. Wuta na bisika oyo abombamaka, abomaka moto oyo asali mabe te. Miso na ye ezelaka na kobombama bato ya koboma.


pamba te makolo na bango ekimaka mbangu mpo na kolanda mabe, mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


Mpe tango nyonso lipata ezalaki kopema, azalaki koloba : « Oh Yawe, zonga kati na bana ya Isalaele, pamba te bazali ebele penza ! »


Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ;


Bokende, botala lisusu malamu, bononga mpe boluka koyeba esika nini Davidi akendaka mikolo nyonso mpe nani amonaki ye kuna ; pamba te bayebisaka ngai ete azali na mayele mabe makasi.


Boye, batelemaki mpe bakendeki na Zifi liboso na Saulo. Nzokande Davidi elongo na bato na ye bazalaki kati na esobe ya Maoni, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Yeshimoni.


Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ