Ata azali sik’oyo ya kobombama kati na lidusu ya mabanga to na esika songolo, nzokande tango kaka bato kati na mampinga na biso bakobanda kokufa, ekozanga te komonana moto oyo akoyoka yango mpe akoloba : « Kati na bato oyo bazali kolanda Abisalomi, ebele bakufi. »
Botala mpe boyeba bisika nyonso epai wapi abombamaka, mpe bozongela ngai mpo na koyebisa ngai makambo nyonso ndenge yango ezali. Bongo na sima, soki azali kati na mboka, ngai nakokende elongo na bino mpe nakolukisa ye kati na bituka nyonso ya Yuda.