1 Samuele 23:21 - Mokanda na Bomoi21 Saulo azongisaki : — Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »
Ezali mpo na yango nde bino nyonso bosalelaki ngai likita ? Moto moko te alobi na ngai na tina na boyokani oyo mwana na ngai ya mobali asalaki na mwana ya Izayi, mpe moko te kati na bino ayokeli ngai mawa mpo ete ayebisa ngai ete mwana na ngai asaleli ngai likita mpo ete mosali na ngai atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ? »