Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 23:2 - Mokanda na Bomoi

2 Davidi atunaki Yawe, alobaki : — Nakoki na ngai kokende kobundisa bato oyo ya Filisitia ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, bundisa bato ya Filisitia mpe bikisa engumba Keila.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 23:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na yango, Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda ? Yawe azongisaki : — Okoki na yo kokende. Davidi atunaki lisusu : — Nakende wapi ? Yawe azongisaki : — Kende na Ebron.


Davidi atunaki Yawe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.


Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango ; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie.


Davidi atunaki Nzambe : — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, pamba te nakokaba bango na maboko na yo.


Olobaki : « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.


Oh Yawe, nayebi ete moto moko te azali mokonzi ya bomoi na ye ; moto oyo azali kotambola azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.


Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.


Bana ya Isalaele bazwaki bilei oyo bato ya Gabaoni bayaki na yango, kasi batunaki Yawe te.


Sima na kufa ya Jozue, bana ya Isalaele batunaki Yawe : — Libota nini kati na biso ekokende liboso mpo na kobundisa bato ya Kanana ?


Boye, batunaki lisusu Yawe : — Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa ? Yawe azongisaki : — Iyo ! Botala ye wana, abombami kati na biloko.


Boye Saulo atunaki Nzambe : « Nakoki na ngai kokita mpo na kolanda bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko ya bato ya Isalaele ? » Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana.


Kasi basoda ya Davidi bayebisaki ye : — Soki awa kati na Yuda, tozali kobanga, ekozala boni soki tokeyi na Keila kobundisa bato ya Filisitia ?


Davidi atunaki lisusu Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : — Telema, kende na Keila, pamba te nazali kokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.


Nzokande, tango Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki, akimaki epai ya Davidi, na engumba Keila, amemaki elongo na ye efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.


Bongo Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi ? Nakokoka na ngai kokanga bango ? Yawe azongiselaki ye : — Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ