Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 23:17 - Mokanda na Bomoi

17 Alobaki na ye : « Kobanga te ! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo ; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 23:17
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ?


Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi, mpe bana na ye bakozwa ekimelo.


Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.


Pesa makasi na maboko oyo elembi, lendisa mabolongo oyo ezali kolenga ;


Loba na bato oyo bazali kobanga : « Bozala makasi, bobanga te, Nzambe na bino akoya, akoya kozongisa mabe na mabe, akoya na lifuti ya Nzambe. Ye moko akoya kobikisa bino. »


Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te, Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te, pamba te Ngai moko nakosunga yo, » elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.


Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga ; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


Tango tokomaki na Rome, bapesaki Polo nzela ya kovanda ye moko na ndako ; batielaki ye soda moko mpo na kokengela ye.


Kasi soki yango ewuti na Nzambe, solo, bokolonga te kosukisa bato oyo. Bosala keba ete bobundisa Nzambe te. Bato ya Likita-Monene bandimaki likanisi ya Gamalieli,


nazali kosala mabongisi ya kokokisa yango tango nakokende na Espane. Nazali na elikya ete, wana nakolekela epai na bino, nakomona bino mpe nakozwa lisungi na bino mpo na kokende kuna, sima na ngai kosepela kovanda elongo na bino ata na mwa tango moke.


Boye tokoki koloba na elikya nyonso : « Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ? »


Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa.


Sik’oyo, vanda awa elongo na ngai, kobanga te. Pamba te moto oyo azali koluka bomoi na yo azali koluka mpe bomoi na ngai. Okobatelama malamu epai na ngai. »


Owuti sik’oyo kotalisa ngai bolamu oyo osaleli ngai : Yawe akabaki ngai penza na maboko na yo, kasi oboyaki na yo koboma ngai.


Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia ? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo.


Tala, nayebi sik’oyo ete okozala penza mokonzi, mpe bokonzi ya Isalaele ekolendisama na maboko na yo.


Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.


Tango Yawe akokokisela nkolo na ngai bolamu nyonso oyo alakaki yo mpe akokomisa yo mokambi ya Isalaele,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ