Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 23:14 - Mokanda na Bomoi

14 Davidi avandaki na bisambelo ya likolo ya bangomba kati na esobe, mpe avandaki na likolo ya ngomba kati na esobe ya Zifi. Saulo alukaki ye mikolo nyonso, kasi Nzambe akabaki Davidi te na maboko na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 23:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ozali ebombamelo na ngai ; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.


Nakomi komilobela : « Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga, nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi ;


pamba te makolo na bango ekimaka mbangu mpo na kolanda mabe, mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


Pamba te balalaka pongi te soki basali nanu moto mabe te, mpe pongi ekimaka bango soki babomi moto te ;


Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.


Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?


minyoko mpe pasi na ngai ; oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antioshe, na Ikoniomi mpe na Listre. Solo, nanyokwamaki makasi, kasi Nkolo akangolaki ngai wuta na nyonso.


Wana Davidi azalaki na Oreshi kati na esobe ya Zifi, ayokaki ete Saulo abimaki mpo na koluka koboma ye.


Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki : « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. »


Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »


Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ