13 Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te.
Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi.
Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende ? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo ! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo !
Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei.
Davidi alobaki na basoda na ye : « Tika ete moko na moko atia mopanga na ye na loketo. » Boye, batiaki mipanga na bango na loketo, mpe Davidi atiaki mpe oyo ya ye. Bato pene nkama minei bakendeki elongo na Davidi, mpe bato nkama mibale batikalaki mpo na kobatela biloko.