Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo, pamba te natia elikya na ngai kati na Yo. Lakisa ngai nzela ya kolanda, pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.
Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.
Boni, bakambi ya Keila bakokaba ngai penza na maboko na ye ? Saulo akoya solo ndenge mosali na Yo ayoki yango ? Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, yebisa mosali na yo. Yawe alobaki : — Iyo, akoya penza.
Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki : « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. »