10 Davidi alobaki : — Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, mosali na Yo ayoki malamu ete Saulo azali komibongisa mpo na koya na Keila, mpo na kobebisa engumba likolo na ngai.
Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka ? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango ?
Nzokande Amani asilaki koyoka ete Maridoshe azali Moyuda. Boye amonaki ete likanisi ya koboma kaka Maridoshe ekoki te ; alukaki nzela ya koboma Bayuda nyonso, bato ya Maridoshe, kati na mokili mobimba ya mokonzi Kizerisesi.
Boni, bakambi ya Keila bakokaba ngai penza na maboko na ye ? Saulo akoya solo ndenge mosali na Yo ayoki yango ? Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, yebisa mosali na yo. Yawe alobaki : — Iyo, akoya penza.