Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 23:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango bayebisaki Davidi ete bato ya Filisitia bazali kobundisa engumba Keila mpe bazali kozwa na makasi ble na bilanga na yango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 23:1
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbala moko, ezala ebende to mabele oyo basalelaka bikeko to bronze to palata to mpe wolo, nyonso epanzanaki, ekomaki mike-mike mpe ekomaki kopumbwa ndenge matiti ya ble epumbwaka tango bapupolaka yango ; mopepe ememaki yango mpe elimwisaki yango. Kasi libanga oyo ekweyelaki ekeko yango ekomaki ngomba moko ya monene oyo etondisaki mokili mobimba. › »


tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.


Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te ; okokamola bambuma ya olive, kasi okomipakola mafuta na yango te ; okokamola bambuma ya vino, kasi okomela masanga na yango te.


Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.


Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.


Keila, Akizibi mpe Maresha : bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani.


Bazalaki kotonga milako na bango pene ya bana ya Isalaele, mpe bazalaki kobebisa bilanga na bango, kino pene ya Gaza. Bazalaki kotikela bana ya Isalaele ata eloko moko te ya kolia, ata meme to ntaba te, ata ngombe te, ata mpe ane te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ