Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 22:8 - Mokanda na Bomoi

8 Ezali mpo na yango nde bino nyonso bosalelaki ngai likita ? Moto moko te alobi na ngai na tina na boyokani oyo mwana na ngai ya mobali asalaki na mwana ya Izayi, mpe moko te kati na bino ayokeli ngai mawa mpo ete ayebisa ngai ete mwana na ngai asaleli ngai likita mpo ete mosali na ngai atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 22:8
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Suka na suka, mokonzi ya Siri asilikaki makasi, abengisaki bakalaka na ye mpe atunaki bango : — Bokoki te koyebisa ngai nani kati na biso azali na ngambo ya mokonzi ya Isalaele ?


boye, akoki kofungola matoyi ya bato mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba,


Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko.


Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.


Jonatan azongisaki : — Te, Ekosalema te ! Okokufa te ! Tala, tata na ngai asalaka eloko moko te, ezala ya moke to ya monene, soki ayebisi ngai te. Mpo na nini tata na ngai abombela ngai kaka likambo oyo ? Ezali bongo te.


Jonatan alobaki na Davidi : « Kende na kimia, pamba te biso mibale tolapanaki ndayi na Kombo na Yawe na koloba : ‹ Yawe azali Motatoli kati na yo mpe ngai, mpe kati ya bakitani na yo mpe bakitani na ngai mpo na libela. › »


Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai ! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo ?


Saulo alobaki na ye : — Mpo na nini yo mpe mwana mobali ya Izayi bosalelaki ngai likita mpo na kotelemela ngai ? Mpo na nini opesaki ye bilei mpe mopanga, mpe otunaki mpo na ye makambo epai na Nzambe, mpo ete atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ?


Saulo azongisaki : — Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ