Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 22:7 - Mokanda na Bomoi

7 Saulo ayebisaki bango : « Bino bato ya Benjame boyoka, bokanisi ete mwana ya Izayi akopesa bino nyonso bilanga mpe bilanga ya vino ? Bokanisi ete akokomisa bino bakonzi ya bankoto to bakonzi ya bankama ya basoda ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 22:7
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye ; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama.


Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.


Ezalaki bango nde bakatisaki mayi ya Yordani, na sanza ya liboso, tango mayi ya ebale etondaki makasi na bangambo nyonso, mpe bakimisaki bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mabwaku, ezala na ngambo ya este to ya weste.


Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi ; wuta na misisa na ye, Etape moko ekobota mbuma.


Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.


Na nyonso oyo azalaki kosala, Davidi azalaki kolonga, pamba te Yawe azalaki elongo na ye.


Kasi mokolo oyo elandaki, mokolo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, lokola esika ya Davidi ezalaki lisusu polele, Saulo alobaki na mwana na ye ya mobali, Jonatan : — Mpo na nini mwana mobali ya Izayi ayei te mpo na kolia, ezala lobi oyo eleki to lelo ?


Saulo asilikelaki makasi Jonatan mpe alobaki na ye : — Yo mwana mobali ya mwasi ya yawuli mpe motomboki, nayebi solo ete okoteli mwana mobali ya Izayi ; kasi ezali mpo na soni na yo mpe ya mama oyo abota yo.


Saulo alobaki na ye : — Mpo na nini yo mpe mwana mobali ya Izayi bosalelaki ngai likita mpo na kotelemela ngai ? Mpo na nini opesaki ye bilei mpe mopanga, mpe otunaki mpo na ye makambo epai na Nzambe, mpo ete atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ?


Kasi Doegi, moto ya Edomi, oyo azalaki moko kati na basali ya Saulo, alobaki : « Namonaki mwana mobali ya Izayi koya na Nobi epai ya Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi.


Kasi Nabali azongiselaki basali ya Davidi : « Davidi azali nani ? Mwana mobali ya Izayi azali nani ? Mikolo oyo, basali ebele bazali kokima bankolo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ