1 Samuele 22:3 - Mokanda na Bomoi3 Kolongwa wana, Davidi akendeki na Mitsipe ya Moabi mpe alobaki na mokonzi ya Moabi : « Nabondeli yo : Pesa tata na ngai mpe mama na ngai ndingisa ya koya kovanda elongo na yo kino ngai nakoyeba makambo oyo Nzambe akosala mpo na ngai. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.