Nzokande, kati na bato na yo, ekozala na moto moko oyo nakolongola te liboso ya etumbelo na Ngai, mpo ete obanda koyokelaka ye zuwa mpe obanda kozikaka motema ; kasi bana nyonso oyo bakobotama na ndako na yo bakokufa na bolenge na bango.
Boye Davidi alobaki na Abiatari : « Mokolo wana, nayebaki malamu ete lokola Doegi, moto ya Edomi, azalaki wana, akokaki kozanga te koyebisa Saulo. Boye ezali mpo na ngai nde bato nyonso ya libota ya botata na yo bakufi !