Tsadoki mpe azalaki wana elongo na Balevi oyo bazalaki elongo na ye mpe bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. Bakitisaki Sanduku ya Nzambe, mpe Abiatari abonzaki mbeka kino tango bato nyonso basilisaki kobima na engumba.
Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode ; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki.
Nzokande, kati na bato na yo, ekozala na moto moko oyo nakolongola te liboso ya etumbelo na Ngai, mpo ete obanda koyokelaka ye zuwa mpe obanda kozikaka motema ; kasi bana nyonso oyo bakobotama na ndako na yo bakokufa na bolenge na bango.
Nzokande, tango Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki, akimaki epai ya Davidi, na engumba Keila, amemaki elongo na ye efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.
Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka ; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye.